settings icon
share icon
Motuna

Yesu Klisto azali nani?

Eyano


Na bokeseni ya motuna “Nzambe azali?” bato moke batunaka soki Yesu Klisto azalaki. Endimami mingi ete Yesu azalaki solo moto oyo atambolaki na mabele ma Yisalaele mibu 2000 mileki. Ntembe ebandaka ntango ekomaka kosolola mpo na eye etali bokitoli mobimba bwa Yesu. Penepene ya biyamba minene nyonso bateyaka ete Yesu azalaki mosakoli, soki te molakisi malamu, soki mpe moto na lolenge ya nzambe. Likambo lizali boye ete Bibilia elobeli biso ete Yesu azalaki mosika koleka mosakoli, molakisi malamu, soki te moto na lolenge ya nzambe.

C.S. Lewis na buku ya ye Mere Christianity akomi eye elandi: “Nazali awa komeka kopekisa bato banso uta na kolobaka maloba ma ligboma maye bato bazali mbala mingi koloba na ntina ya Ye [Yesu Klisto] ete : 'Nasili kobelema mpo ya kondima Yesu lokola molakisi monene ya bolamu, kasi nazali te kondima maloba ma ye ete azali Nzambe.' Eye wana ezali yoko eloko tosengeli te koloba. Moto oyo azalaki se kaka moto mpe alobaki lolenge ya makambo maye Yesu alobaki akokaki te kozala molakisi monene ya bolamu. Alingaki kozala ata moto ya bolema na motuya ya moto oyo azali koloba ete azali ata eloko songolo soki te buzoba—soki te alingaki kozala Zabulu ya lifelo Bosengeli kopona. Soki moto oyo azalaki, mpe azali, Mwana ya Nzambe, soki te moto ya ligboma to eloko moko ya mabe koleka. Okoki kokanga ye monoko mpo azali moto ya ligboma, okoki kobwakela ye soi mpe koboma ye lokola zabulu; soki te okoki kokweya na makolo ma ye mpe kobenga ya Nkolo mpe Nzambe. Kasi tika topesa makanisi mazanga ntina mpe bonkonde te ete azalaki moto molakisi monene. Atikelaki biso te kopona nzela wana. Mokano mwa ye ezalaki bongo te.”

Bongo, Yesu alobaki ete azali nani? Bibilia elobi ete Azali nani? Yambo tika totala maloba ma Yesu na Yoane 10:30, “Ngai mpe Tata tozali moko.” Na botali kaka, eye ekoki kozala te maloba maye ete azali Nzambe. Nzokande, tala eyano ya Bayuda na maloba ma Ye, “‘Tozali kobamba yo mabanga mpo ya yoko ya ntina iye te,’ Bayuda bazongisaki maloba, ‘kasi mpo ya botuki, mpo yo, moto mpamba, ozali koloba ete ozali Nzambe’” (Yoane 10:33). Bayuda basosolaki maloba ma Yesu lokola maloba kolobaka ete azali Nzambe. Na milongo miye milandi, Yesu asembolaki soki moke te Bayuda na kolobaka ete, “Nalobaki te ete nazali Nzambe.” Eye wana elakisi ete Yesu azalaki solo koloba ete azalaki Nzambe na kolobaka ete, “Ngai mpe Tata tozali moko” (Yoane 10:30). Yoane 8:58 ezali yoko ndakisa mosusu: “‘Nalobeli bino bosolo,’ Yesu azongisaki maloba, ‘Liboso ete Abalayama abotama, Nazali!’” Lisusu, lokola eyano, Bayuda bakamataki mabanga mpo ya komeka kobamba Yesu (Yonae 8:59). Na koyebisaka bokitoli bwa Ye lokola “Nazali” ezali kosalela polele ya nkombo ya Nzambe ya Boyokani bwa Kala (Esode 3:14). Ntina nini elingaki lisusu Bayuda kobamba Yesu mabanga soki alobaki te eloko oyo bakanisaki ezali botuki, elingi koloba, maloba ete azali Nzambe?

Yoane 1:1 alobi “Liloba azalaki Nzambe.” Yoane 1:14 elobi “Liloba ekomaki mosuni.” Eye elakisi polele ete Yesu azali Nzambe na mosuni. Toma moyekoli alobaki na Yesu, “Nkolo mpe Nzambe wa ngai” (Yoane 20:28). Yesu asemboli ye te. Apostolo Paulo alimboli Ye lokola, “…Nzambe monene mpe Mobikisi wa biso, Yesu Klisto” (Tito 2:13). Apostolo Petelo alobi se maloba moko, “…Nzambe mpe Mobikisi wa biso, Yesu Klisto” (2 Petelo 1:1). Nzambe Tata azali mpe lokola nzeneneke ya bokitoli mobimba ya Yesu, “Kasi mpo na ntina ya Mwana alobi, ‘Ngbende na yo, O Nzambe, ekowumela libela na libela, mpe bosembo ekozala lingenda lya bokonzi bwa yo.’” Masakoli ma Boyokani bwa Kala mayebisi bonzambe bwa Ye, “Mpo mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso, mpe bokonzi ekozala na mapeka ma ye. Mpe akobiangama Mosungi ya kokamwa, Nzambe na nguya, Tata wa seko, Nkolo ya Kimia” (Isaiah 9:6).

Bongo, lokola C.S. Lewis alobaki, kondima Yesu kaka ete azalaki molakisi malamu ezali boponi te. Yesu alobaki polele mpe na ntembe te ete azali Nzambe. Soki Azali Nzambe te, bongo azali moto ya lokuta, mpe boye azali mosakoli te, molakisi malamu te, moto na lolenge ya Nzambe te. Na komekaka kobwakisa maloba ma Yesu, “bato na mayele” ban tango ya lelo balobi ete “Yesu ya solo ya ntango ya kala” alobaki te makambo mingi tem aye Bibilia ezali kopesa na Ye. Tozali nani mpo ya kozongisa maloba na Liloba ya Nzambe mpo na eye Yesu alobaki soki mpe alobaki te? Lolenge nini “moto moko ya mayele” oyo azali se ya mobu nkoto mibale akoki kolongola uta na ntango ya Yesu kozala na boyebi ya mozindo na eye Yesu alobaki soki mpe alobaki te koleka baye wana bazalaki elongo na ye, basalelaki ye, mpe bateyamaki na Yesu Yemei (Yoane 14:26)?

Na ntina nini motuna ya koyeba bokitoli bwa solo ya Yesu ezali motuya? Ntina nini ezali likambo ya koyeba soki Yesu azalaki Nzambe soki mpe te? Ntina ya motuya monene ete Yesu asengeli kozala Nzambe ezali ete soki Azali Nzambe te, liwa lya Ye elingaki te ekoka kofuta nyongo ya etumbu mpo ya masumu ma mokili mobimba (1 Yoane 2:2). Bobele Nzambe akokaki kofuta nyongo ya etumbu ezanga nsuka boye (Baloma 5:8; 2 Bakolinti 5:21). Yesu asengelaki kozala Nzambe mpo ete akoka kofuta nyongo na biso. Yesu asengelaki kozala moto mpo ete akoka kokufa. Lobiko ekoki kosalema bobele o nzela ya bondimi na Yesu Klisto. Bonzambe bwa Yesu ezali ntina eye wapi Asakolaki, “Nazali nzela mpe bosolo mpe bomoi. Moto moko te ayaka na Tata se soki o nzela ya ngai” (Yoane 14:6).

English



Zonga na lokasa ya boyambi na Lingala

Yesu Klisto azali nani?
© Copyright Got Questions Ministries