settings icon
share icon
Motuna

Nini ezali Moklisto?

Eyano


Na buku oyo elimbolaka ntina ya maloba Moklisto ekokani na “moto moko oyo azali kotatola boyambi na Yesu lokola Klisto soki te na eyamba oyo wapi efandisami mateya na Yesu.” Atako eye ezali esika malamu ya kobanda lisolo, lokola ndimbola ya buku mingi, ezali kokoka mpenza te koyebisa nini ezali bosolo bwa Bibilia ya eye elimboli nini kozala Moklisto. Liloba “Moklisto” etangami mbala misato kati na Boyokani bwa Sika (Misala 11:26; 26:28; 1 Petelo 4:16). Balandi ba Yesu Klisto babengamaki “Baklisto” yambo na Antiokia (Misala 11:26) mpo ezaleli ya bango, misala, mpe maloba ma bango izalaki lokola Klisto. Liloba “Moklisto” na ntina na yango ya yambo elingi koloba, “oyo azali na ngambo ya Klisto” soki te “molandi wa Klisto.”

Likambo ya mawa nzokande wana ezali ntango koleka, liloba “Moklisto” ebungisaki mingi ya ndimbola na yango mpe esalelami mbala mingi mpo ya moto oyo azali ya eyamba soki te oyo azali na bizaleli ya bonene koleka likolo kasi oyo akoki kozala soki mpe kozala te molandi wa Yesu Klisto. Bato mingi baye bandimaka te mpe batiela Yesu Klisto motema te baminonaka ete bazali Baklisto mpamba te bakendeke na ndako ya Nzambe to eklezia soki bazali kati na ekolo ya “Moklisto”. Kasi kokende na ndako ya Nzambe to eklezia, kosalela baye wana bazali na misolo te lokola yo, soki te kozala moto malamu ekokomisa yo Moklisto te koleka lokola ebombelo ya motuka esalaka motuka te. Kozala mondimi ya ekelzia, kokende na eklezia mikolo nyonso, mpe komipesa na mosala mwa ekelzia ekokomisa yo te Moklisto.

Bibilia eteyi ete misala malamu tosalaka mikondimisa biso te epai ya Nzambe. Tito 3:5 elobi ete, “Abikisaki biso, te na ntina ya makambo ma sembo tosalaki, kasi na ntina ya boboto bwa ye. Abikisaki biso o nzela ya kosukolama ya mbotama ya sika mpe bomoto bwa sika na Molimo Mosantu.” Boye, Moklisto azali moto oyo abotisami lisusu sika na Nzambe (Yoane 3:3; Yoane 3:7; 1 Petelo 1:23) mpe ati bondimi mpe motema na Yesu Klisto. Efese 2:8 elobeli biso ete ezali “…na ngolu ete bobikisami, o nzela ya bondimi—mpe eye ezali te uta na binomei, ezali likabo lya Nzambe.”

Moklisto ya solo azali moto oyo ati bondimi mpe motema na moto ya soki mpe na mosala mwa Yesu Klisto, mpelamoko mpe liwa lya Ye likolo lya ekulusu lokola lifuti mpo ya masumu mpe bosekwi bwa Ye o mokolo mwa misato. Yoane 1:12 elobeli biso ete, “Nzokande na banso baye bayambaki ye, na banso baye bandimi o nkombo ya ye, apesi nguya ya kokoma bana ba Nzambe.” Elembo ya Moklisto ya solo ezali bolingo mpo ya basusu mpe botosi na Liloba lya Nzambe (1 Yoane 2:4, 10). Moklisto ya solo azali mpenza mwana ya Nzambe, eteni ya libota lya solo ya Nzambe, mpe moko oyo apesami bomoi bwa sika na Yesu Klisto.

Esili yo kozwa mokano na ntina ya maye otangi awa? Soki bongo, tosengi onyata likolo ya molongo wapi ekomami awa na nse "Nandimi Klisto lelo oyo".

English



Zonga na lokasa ya boyambi na Lingala

Nini ezali Moklisto?
© Copyright Got Questions Ministries