Nawuti kaka kotia bondimi bwa ngai na Yesu…bongo nini sikawa?




Nawuti kaka kotia bondimi bwa ngai na Yesu…bongo nini sikawa?

Longonia! Ozwi mokano oyo ekobongola bomoi na yo! Mbele ozali komituna, “Bongo nini sikawa? Lolenge ninin ekobanda ngai mobembo mwa ngai elongo na Nzambe?” Biteni mitano biye bitangami awa na nse bikopesa yo malako uta na Bibilia. Soki ozali na mituna mitali nzela ya mobembo mwa yo, tosengi otala na: www.GotQuestions.org/Lingala.

1. Mitala ete ososoli nini ezali lobiko.

1 Yoane 5:13 elobeli biso ete, “Nakomi makambo maye epai ya bino oyo bozali kondima na nkombo ya Mwana ya Nzambe mpo ete bokoka koyeba ete bozali na bomoi bwa seko.” Nzambe alingi ete toyeba nini oyo ezali lobiko. Nzambe alingi totielaka ye motema na koyebaka ete solo mpenza tobikisami. Na bokuse tika tokende na biteni bya motuya monene ya lobiko:

(a) Tosumukaki biso banso. Banso tosalaki makambo maye masepelisaki Nzambe te (Baloma 3:23).

(b) Na ntina ya masumu ma biso, tobongaki kopesama etumbu na bokabwani bwa seko uta na Nzambe (Baloma 6:23).

(c) Yesu akufaki na ekulusu mpo ya kofuta masumu ma biso (Baloma 5:8; 2 Bakolinti 5:21). Yesu akufaki na esika ya biso, kokamataka etumbu eye elongobonaki na biso. Bosekwi bwa ye elakisaki ete liwa lya Yesu ekokaki mpo ya kofuta masumu ma biso.

(d) Nzambe apesaka bolimbisi na banso baye wana batiaka bondimi bwa bango na Yesu-kotalelaka liwa lya ye lokola lifuta liye lisengamaki mpo ya masumu ma biso (Yoane 3:16; Baloma 5:1; Baloma 8:1).

Eye wana ezali etinda ya lobiko! Soki otiaki bodimi bwa yo na Yesu lokola Mobikisi wa yo, obikisami! Masumu ma yo manso malimbisami, mpe Nzambe alaki ete akosundola soki mpe akotika yo soki moke te (Baloma 8:38-39; Matai 28:20). Omikundola ete, lobiko na yo ezali solo na Yesu Klisto (Yoane 10:28-29). Soki otielaka bobele Yesu motema lokola Mobikisi wa yo, okoki kotia motema ete okolekisa ntango ya boseko elongo na Nzambe na lola!

2. Luka eklezia malamu eye eteyaka Bibilia.

Kokanisa te ete eklezia ezali eloko moko lokola ndako. Eklezia ezali nde bato. Ezali likambo ya motuya monene ete bandimi na Yesu Klisto bazala kati na bondeko moko na mosusu. Eye wana ezali ntina ya yambo ya eklezia. Awa esili yo kotia bondimi bwa yo na Yesu Klisto, tolendisi yo makasi ete oluka eklezia eye endimaka na Bibilia na esika nzinganzinga wapi ofandi mpe oloba na Moteyi. Tika ete ayeba bondimi bwa yo ya sika na Yesu Klisto.

Ntina ya mibale ya eklezia ezali koteya Bibilia. Okoki koyekola lolenge nini kosalela malakisi ma Nzambe kati na bomoi bwa yo. Kososola Bibilia ezali likambo ya motuya monene mpo ya kotambwisa bomoi bwa Moklisto na nkonzo mpe na nguya. 2 Timote 3:16-17 elobi, “Makomi manso mafulami na Nzambe mpe mazali na ntina mpo ya koteya, kopamela, kosembola mpe kokolisa na bosembo, ete moto ya Nzambe azala mobongi aselingwi mpo na mosala nyonso malamu.”

Ntina ya misato ya eklezia ezali bokumbameli. Bokumbameli ezali kozongisa matondi epai ya Nzambe mpo na manso Asalaki! Nzambe abikisaki biso. Nzambe alingi biso. Nzambe apesaka biso. Nzambe akambaka mpe atambwisaka biso. Boniboni ete tozongisa Ye matondi te? Nzambe azali mosantu, sembo, wa bolingo, atonda na boboto, mpe atonda na ngolu. Emoniseli 4:11 esakoli ete, “Olongobani, Nkolo Nzambe wa biso, mpo ya kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo okelaki biloko binso, mpe na bolingi bwa yo nde bikelamaki mpe bizwaki bozalani bwa bango.”

3. Zwaka ntango mokolo na mokolo ya kofandisa makanisi na Nzambe.

Ezali na ntina monene mpo ya biso ete tolekisa ntango mokolo na mokolo mpo ya kofandisa makanisi na Nzambe. Boko bato babengi eye “ntango ya kimia.” Basusu babengi yango “mabondeli,” mpo ezali ntango wapi tozali komipesa bisomei na Nzambe. Boko basepelaka komipesa mwa ntango mpembeni na ntongo, nzokande basusu basepelaka na mpokwa. Likambo ezali te nini obengi ntango oyo soki mpe ntango nini osalaka yango. Likambo ezali ete olekisaka ntango mbala na mbala elongo na Nzambe. Makambo nini matangami na ntango ya ngai na Nzambe?

(a) Losambo. Losambo na maloba ya polele ezali kosolola na Nzambe. Solola na Nzambe mpo na eye etali mitungisi mpe makambo ma yo. Senga Nzambe apesa yo bwania mpe bokambi. Senga Nzambe apesa mpo ya bonsenga bwa yo. Yebisa Nzambe boni olingaka Ye mpe lolenge kani okumisaka manso Asalaka mpo na yo. Oyo ezali nyonso etali losambo.

(b) Kotanga Bibilia. Likolo ya koteyama Bibilia na eklezia, Eteyelo ya Eyenga, mpe/soki te boyekoli ya Bibilia– Osengeli kotanga Bibilia mpo ya yomei. Bibilia ezali na nyonso oyo osengeli koyeba mpo ya kotambwisa bomoi bwa Moklisto na nkonzo. Na kati ezali na malako ma Nzambe mpo na lolenge nini kokamata mikano ya bwania, lolenge nini koyeba bolingi bwa Nzambe, lolenge nini kosalela basusu, mpe lolenge boni kokola na molimo. Bibilia ezali liloba lya Nzambe epai na biso. Bibilia ezali mingi mpenza buku ya kosimba na maboko ya malakisi ma Nzambe mpo ya kolakisa lolenge nini kotambwisa bomoi bwa biso na motindo oyo ya kopesa Ye bosepeli mpe kosepelisa biso.

4. Kolisa bondeko bwa yo na bato oyo bakoki kosalisa yo na molimo.

1 Bakolinti 15:33 elobeli biso ete, “Bomikosa te: ‘Kotambola na bato mabe ekobebisa ezaleli malamu.’” Bibilia etondi na makebisi na ntina ya mipepe miye bato ba “mabe” bakoki kotia likolo na biso. Kolekisaka ntango elongo na baye wana bamipesi na misala ya masumu ekosala ete tosenginiama na misala mina. Ezaleli ya bato oyo tozingami na bango “ekokangama lokola langi” likolo lya biso. Tala ntina ezali motuya mpenza ete tozingama na bato oyo balingaka Nkolo mpe bamipesi epai na Ye.

Meka koluka moninga moko soki te mibale, mbele uta na eklezia ya yo, oyo akoki kosalisa yo mpe kolendisa yo (Ebele 3:13; 10:24). Senga baninga ba yo batikela yo ntango mpo na eye etali ntango na yo ya kimia, misala mya yo, mpe botamboli bwa yo elongo na Nzambe. Senga soki okoki kosala ndenge moko mpe epai ya bango. Eye elingi koloba te ete oboya baninga banso baye bayebi Yesu Klisto te lokola Mobikisi wa bango. Koba kozala moninga na bango mpe linga bango. Kasi tika bayeba ete Yesu asili kobongola bomoi bwa yo mpe ete bokoki te kokoba kosala se makambo moko wana bozalaki kosala kala. Senga Nzambe apesa yo libaku ya kotatola Yesu Klisto elongo na baninga ba yo.

5. Batisama.

Bato mingi bazali na boyebi malamu te ya libatisi. Liloba “kobatisa” elingi koloba kozindisa na mai. Libatisi ezali nzela ya Bibilia ya kosakola polele bondimi bwa yo ya sika mpo na Klisto mpe bomipesi bwa yo mpo ya kolanda Ye. Likambo ya kozindisama na mai elimboli kokundama elongo na Klisto. Likambo ya kobima uta na mai ezali elilingi ya bosekwi bwa Klisto. Kobatisama ezali bomikitoli bwa yo moko elongo na liwa, bokundami, mpe bosekwi bwa Yesu (Boloma 6:3-4).

Ezali te libatisi nde ekobikisa yo. Libatisi ekolongola te masumu ma yo. Libatisi ezali se eteni yoko ya botosi, ya kosakola polele bondimi bwa yo na Klisto mpe bomipesi bwa yo epai na Ye. Soki obelemi mpo ya kobatisama, osengeli koloba na Mosali ya Nzambe.



Zonga na lokasa ya boyambi na Lingala



Nawuti kaka kotia bondimi bwa ngai na Yesu…bongo nini sikawa?