settings icon
share icon
Motuna

Elingi koloba nini kondima Yesu lokola Mobikisi wa yo moko?

Eyano


Esili yo kondima Yesu Klisto lokola Mobikisi wa yo moko? Mpo ya kososola malamu motuna moye, osengeli yambo kososola maloba “Yesu Klisto,” “wa yo moko,” mpe “Mobikisi.”

Nani azali Yesu Klisto? Bato mingi bakokitola ete Yesu Klisto azali moto moko malamu, molakisi monene, soki te kutu moko mosakoli wa Nzambe. Makambo maye mazali solo mpo na eye etali Yesu, kasi bazali kolimbola mobimba te nani Ye azali solo mpenza. Bibilia elobeli biso ete Yesu azali Nzambe na mosuni, Nzambe na lolenge ya moto (tala Yoane 1:1, 14). Nzambe ayaki na mabele mpo ya koteya biso, kobikisa biso na bokono, kosembola biso, kolimbisa biso—mpe kokufa mpo ya biso! Yesu Klisto ezali Ye Nzambe, Mokeli, Nkolo mokonzi?

Nani azali Mobikisi, mpe mpo na nini tosengeli kozala na Mobikisi? Bibilia elobeli biso ete biso banso tosumukaki; biso banso tosalaki mabe (Baloma 3:10-18). Lokola lifuti ya masumu ma biso, tolongobani mpo ya nkanda mpe masambisi ma Nzambe. Etumbu bobele moko mpo ya masumu tosalaki na Nzambe oyo azali na nsuka te mpe ya seko ezali etumbu eye ezanga nsuka (Baloma 6:23; Emoniseli 20:11-15). Tala ntina tosengeli kozala na Mobikisi!

Yesu Klisto ayaki na mabele mpe akufaki na esika ya biso. Liwa lya Yesu ezalaki kofuta ya nyongo ezanga nsuka mpo na masumu ma biso (2 Bakolinti 5:21). Yesu akufaki mpo ya kofuta etumbu ya masumu ma biso (Baloma 5:8). Yesu afutaki motuya ya ntalo oyo tokokaki te. Bosekwi bwa Yesu uta na bakufi elakisaki ete liwa lya Ye ekokaki mpo ya kofuta etumbu ya masumu ma biso. Tala ntina Yesu azali Mobikisi bobele moko (Yoane 14:6; Misala 4:12)! Ezali yo kotiela Yesu motema lokola Mobikisi wa yo?

Ezali Yesu Mobikisi wa “yo moko”? Bato mingi bazali kotala bomoi ya Bomoklisto lokola bobele kokende na eklezia, kosala makuli, mpe/soki mpe te kosala masumu songolo. Eye wana ezali Bomoklisto te. Bomoklisto ya solo ezali mokangano ya yo moko elongo na Yesu Klisto. Kondima Yesu Klisto lokola Mobikisi wa yo moko elingi koloba kotielaka Ye bondimi mpe motema mwa yo moko. Moto moko te abikisami na bondimi bwa basusu. Moto moko te abikisami na kosalaka misala songolo. Bobele nzela moko ya kobikisama ezali ya kondima yo moko Yesu lokola Mobikisi, kotiaka motema na liwa lya Ye lokola lifuti mpo ya masumu ma yo mpe bosekwi bwa Ye lokola ndanga ya bomoi bwa seko (Yoane 3:16). Yesu, ezali ye mobikisi ya yo moko mpenza?

Soki olingi kondima Yesu Klisto lokola Mobikisi wa yo moko, loba maloba malandi na Nzambe. Mikundola ete, kolobaka maloba maye soki mpe maloba nini masusu ekobikisa yo te. Bobele kondima na Yesu Klisto mpe mosala mwa Ye moye akokisaki na ekulusu nde ekoki kobikisa yo uta na masumu. Losambo loye ezali bobele yoko nzela ya kolakisa na Nzambe bondimi bwa yo epai na Ye mpe kotonda Ye mpo ya kopesa yo lobiko. “Nzambe, nayebi ete nasumukaki na Yo mpe nalongobani na etumbu. Kasi nandimi ete Yesu Klisto akamataki etumbu eye nalongobani mpo ete o nzela ya bondimi na Ye nakoka kolimbisama. Nayambi likabo na Yo ya bolimbisi mpe nati motema mwa ngai na Yo mpo ya lobiko. Nandimi Yesu lokola Mobikisi wa ngai moko! Natondi Yo mpo na ngolu mpe bolimbisi bwa yo ya kokamwa—likabo lya bomoi bwa seko! Amene!”

Esili yo kozwa mokano na ntina ya maye otangi awa? Soki bongo, tosengi onyata likolo ya molongo wapi ekomami awa na nse "Nandimi Klisto lelo oyo".

English



Zonga na lokasa ya boyambi na Lingala

Elingi koloba nini kondima Yesu lokola Mobikisi wa yo moko?
© Copyright Got Questions Ministries